MOKAPO 3

1 Naomi bokilo na ye alobi, na bongisi bopemi bwa yo po ozala na esengo 2 Mpe sika Bowazi pe basali, oyo azalaki moboti na biso te, akokende kotuta loso pona kobimisa mbuma oyo ba tiaki na moyi 3 Sukola nzoto na yo mpe pakola mafuta, lata bilamba mpe kende libanda komi lakisa na ye te kino akosilisa kolia na komela. 4 Tango akokende kolala, tala malamu esika akolala mpe longola bulanget na makolo na ye mpe lala wana kino ye mei akoyebisa yo nini okosala. 5 Ayanoli ye nakosala manso olobi. 6 Akeyi o e tando mpe asalaki manso bokilo atindaki ye. 7 Boazi aliaki mpe amelaki mpe motema na ngai akeyi kolala na suka ya liboke ya loso Luta ayaki malembe alongoli bulanget, na makolo na ye mpe alali wana. 8 Kati na butu, Boazi ayoki somo na kotengama mpe amoni mwasi alali na makolo na ye. 9 Atuni ye yo nani, ayanoli ye, ngai Luta mosali na yo, sembola mapapu na yo mpo oza na makoki ya mukumba ya ngai. 10 Alobi pambolama na yawe mwana na ngai ya mwasi mbala ya sima lisusu, etalisi lisusu koleka mbala ya liboso pamba te okendeki koluka bilenge mibali babola to bazwi te. 11 Sasaipi mwana na ngai banga te na kosalela yo maye manso okolobi nzambi bikuke ya bato na ngai basosoli ete ozali mwasi ya ndakisa malamu 12 Ya solo penza nakoki kozua mokumba na yo kasi ndeko mususu azali pembeni pona kozua mokumba. 13 Lala awa mpe lobi soki ye andimi kopakamata mokumba na yo, natango malamu asala ya ngo kasi soki aboyi kosalela yo yango ngai na kosala yango yewe azali na bomoi, tikala lala kino tongo. 14 Atikalaki alalaki na nse ya makolo na ye kino tongo kasi alamuki noki mpo bato bayeba ye te mwasi oyo alalaki aw. 15 Tango alingaki kozonga, Boazi alobi na ye fongola kazaka na yo pe simba ya ngo malamu Luta afongoli mpe atieli ye ekolo motoba ya loso mpe abakiseli ye na mutu mpe ye azongi na engumba na ye. 16 Luta ntango azongi epayi ya bokilo na ye, mpe Naomi alobi ezali yo mwana na ngai Luta? Luta ayebisi ye manso mobali wana asalaki pona ye. 17 Ye alobi, apesi ngai bikolo sambo ya loso mpe alobi nakozonga maboko pamba te epayi ya bokilo na ngai. 18 Mpe Naomi alobi zala kimia mwana na ngai kino tango okoyeba makambo ya ngo ekosuka lolenge kani pampa te moto oyo akomipemisa te soki asilisi likambo ya ngo lelo.