MOKAPO 4

1 Boazi amataki mpe atelemi na ekuke, tala moto oyo azali na makoki ya mokumba ya bato, oyo Boazi alobaki yawe azali koleka, Boazi alobi na ye yaka pe tikala awa, mpe ye ayaki. 2 Boazi akamati bato zomi kati na ba mpaka ya ngumba mpe alobi bofanda awa mpe ba ndimaki. 3 Sima alobi oyo azalaki na makoki ya mokumba ya bato Naomi, azongi na ekolo ya Moabi atekaki eteni ya mabele oyo ezalaki ya ndekona bango emileke. 4 Na kanisa nasilaki koyebisa yo zwa yanga liboso ba bayi mboka mpe bampaka ya mboka na nga. soki olingi kosomba, somba kasi olingi te lobela ngai po na yeba nzambi to ozali moto ya yambo asengeli kozwa yango, mpe ngai nalandi yo na sima, moto wana andimi iyo na kosomba ya ngo 5 Boazi alobi, mokolo oyo okpzwa elanga na maboko ya Naomi mbala moko okozwa pe na Luta moabita, mwasi ya mowei pona kotombola kombo ya mowei kati na bakitani na ye. 6 Mpe ye oyo azalaki na makoki ya mokumba ya bato ayanoli na koki te kosomba na tina na ngai na kobanga kobebisa kokitana na ngai, kamata pona ngai makoki ya mikumba na bato nzambi ngai na koki kosomba te. 7 Kala na Isalaele pona kondima likambo songolo elimboli mokumba to pona kobongola, moko alongoli sapato na ye mpe apesi yango na mosusu komonisa litatoli na Isalaele. 8 Oyo azalaki na makoki ya mokumba na bato alobi na Boezi zwa yango pona yo mpe alongili sapato na ye. 9 Bongo Boazi alobi na ba mpaka mpe na batonyoso bozali batatoli lelo na oyo nazwi na maboko ya Naomi nyoso oyo ezalaki ya emileke na kilizo mpe maloni. 10 Mpe ngai mei nakamataki lokola mwasi, Luta moabita, mwasi ya ma maloni pona ko netela kombo ya moweyi na ba kitani na ye, mpe na tina ete kombo ya moweyi ebunga te kati na ba ndeko na ye mpe na ekuke ya esika na ye bozali batatoli lelo. 11 Bato nyoso oyo bazalaki na ekuke na ba mpaka balobi totali ete yawe asalisa mwasi oyo akoti na ndako na yo lokola asalelaki Rashela na laela ba oyo batongaki ndako na Isalaele! monisa makasi na yo kati na efalata, mpe sala kombo na yokumu kati na Beteleme! 12 Tika yawe apesa yo mabota ebele na nzela ya elenge mwasi oyo mpe akomisa ndako na yo lokola ndaku ya perete oyo abotamaki na yuda na tamala 13 Boazi azwaki Luta oyo akomaki mwasi na ye mpe akendeki epayi na ye yawe andingisi Luta kokumba zemi mpe kobota mwana mobali. 14 Basi balobi na Naomi: apambolama yewe oyo atikaki yo te kozanga lelo mobali oyo azali na makoki ya kozua mikumba ya bato oyo kombo na ye ekokumama na Isalaele. 15 Mwana oyo akozongisa boyokani na elimo na yo mpe akozala mosungi na kimobange na yo nzambi bokilo na yo alingi yo, abotaki, aleki litomba koleka bana sambo ya mibali. 16 Naoni azwi mwana mpe amemi ye na ntolo na ye akomaki sinzili na ye. 17 Basi ya nzinga nzinga ba pesaki ye kombo na koloba mwana abotameli Naomi mpe babengaki ye obedi. 18 Tala bokitani ya libota ya perete. 19 Perete abotaki eteso, etesoabotaki rama, rama abotaki Aminadabu. 20 Aninadabe abotaki makolo, makolo abotaki Salmo. 21 Salmo abotaki Boazi, Boazi abotaki obedi. 22 Obedi abotaki Isaye, Isaya Abota dawidi