MOKAPO 2

1 Naomi azalaki na bokilo na ye, moto na nguya pebozwi na libota na elimeleke pe amiobengaki bowazi. 2 Luta moabita alobi na Naomi tikanga na bono eli yo na kende kolokota mbuma na elanga ya oyo nazwi ngolu na miso na ye, alobi kende mwana mwasi. 3 Akendeki kolokota kati na elenga, sima ya baloni, bakutani mbalakata na eteni ya mabele ya Boazi oyo azalaki na libota na elimeleke. 4 Tala Boazi alongwaki na betelemi pe ayeyi na elanga na ye alobi na baloni yawe azela na bino, bongo ba yanoli yawe apambola pe yo. 5 Na sima Boazi atuni kapita ya baloni, elenge mwasi oyo ya nani. 6 Kapita ya baloni ayanoli, ayanoli, azali elenge mwasi moabita bayaki elongo na Naomi. 7 Alobi ndingisa ngai kolokota mbuma kati na maboke sima ya baloni, wuta tango ayaki pe a telemi kino sasaipi pe apemaki na ndako. 8 Boazi alobi na Luta yoka mwana na ngai kokenda na elanga mosusu te, kokende mosika te tikala na basali na ngai. 9 Tala esika bazali kobuka katina elanga mpe kende na sima na bango na pekisi na basali na ngai basimba yo te mpe tango okoyaka posa ya mayi okokende na ba mbeki mpe okomela oyo basali ba toki 10 Sima akitisaki elongi na ye mpe afukami na mabele mpe alobi boni nakozwa ngulu na miso na yo po ozwa posa epai nanga oyo na za mwasi mopaya 11 Boazi ayanoli ye bayebisi ngai makambo nyoso oyo osalaki na bokilo na yo sima ya liwa ya mobali na yo, mpe lolenge otikaki tata na mama na yo pe mboka obotamaki pona kokende epaiya bato oyebaki te. 12 Tika yawe azongisela yo oyo osalaki mpe mbano ezala mobimba epayi na yawe nzambe na isalaele nase ya mapapu oyo oyei komibomba. 13 Mpe alobi oh nazwi ngolu na miso ya mokonzi mpo obondisi ngai mpe olobeli na motema ya mosali na yo nzoka nde nazali te lokola moko ya basali na yo. 14 Na tango ya molia Boazi alobi na Luta, beleme mpe lia lipa, lia na supu Luta afandaki esika moko na basali bilanga bongo Boazi apesi ye mbuma ya kokalinga Luta aleyi yango pe a tie mbimbi pe mosusu etikaki. 15 Sima alamukaki pona kolokota mbuma, bowazi apesi mitindo na basali na ye, yepe alokota mbuma kati na maboke mpe bobangisa ye te. 16 Sima bolongolela ye maboke ndambo ya mbuma oyo botikelaki ye kolokota mpe bosala ye bamela te 17 Alakotaki na elanga kino pokwa mpe atutaki mbuma oyo aloko taki nzinga nzinga ya ekolo moko ya loso. 18 Akamataki mpe azongaki na engomba, mpe bokilo na ye amonaki oyo amemelaki bango pe apesaki bango bileyi oyo etikalaki. 19 Bokolo na ye alobi lelo olokoti mpe osali mosala wapi apambwama oyo azwi litomba epaina yo. Luta asosolisi bokilo na ye esika oyo asalaki mosala, moto oyo nasali epai na ye lelo nkombo na ye Boazi. 20 Naomi alobi na bokilo na ye, apambwa ma na yawe oyo amonisaki mawa pona batona bomoi pe asala na bawe,mobali wana azali moboti na biso pe ye lisusu Naomi azali oyo azali na makoki ya kozwa mokumba na biso. 21 Luta Moabita abakisaki, alobi na ngai lisusu tikala na basali na ngai kino bakosilisa kobuka mbuma. 22 Mpe Naomi alobi na luta bokilo naye ebongi mwana ngai obima elongo na basali mpe bakuta yo te na elanga mosusu 23 Atikalaki na basali ya Boazi mpe alokotaki mbuma kinosuka ya kobuka loso, atikalaki na mama bokilo na ye