MOKAPO 1

1 Na tango ya basambisi, nzala ekotaki na mboka, moto moko ya ekolo na yuda abimaki na betelemi na mwasi mpe na bana mibale ya mibali bakendeki kovanda na ekolo moabi 2 Kombo ya mobali Elimeleke mpe mwasi na ye Naomi na bana mibale ya mibali Maloni mpe kilizoni, bazalaki bato ya libota Efalata na mboka ya Bateleme na yuda bakomaki na ekolo Moabi pe bafandaki kuna 3 Sima Elimeleke awaki, Naomi atikalaki na bana na ye mibale ya mibali. 4 Bana babalaki basi ya mboka Moabi, kombo na bango Olopa mpe Luta bafandaki wana penepene mibu zomi. 5 Makoloni mpe Kiliyone bawaki Naomi atikali ye mei 6 Sima Naomi azwaki basi ya bana na ye mpe balongwaki na mboka moe, mpo ayokaki sango ete yawe apesi bato molia 7 Alokwaki na esika afandaki elongo na basi ya bana naye pe bazongi na mboka na yuda. 8 Naomi alobi na bango bana na ngai bozonga moto na moto epayi ya mama na ye tika ete yawe asalela bino bolamu lokola bino bosalaki pona baye bawaki pona ngai 9 Tika ete yawe apesa bino kimia na bandako ya mabala, mpe apesi bango bi pwepwe bango batombolaki mongongo na kolela. 10 Bazongiseli ye ete tokokende elongo na bato na yo. 11 Naomi alobi na bango tina nini bokolanda ngai nakoki lisusu te kobota bana po babala bino 12 Bozanga bana nangai nakomi mobange po na kobala lisusu te, soki nati elikia na batu oyo soki nasangani na mobali na koki kobota lisusu bana mibali 13 Bongo bino bokozela bango kino bakokola mpe boboyi kobala bana na ngai na tina na bino nazali na monyoko mpe ete loboko na yawe etelemeli ngai. 14 Bango ba tomboli mingongo na kolele olipa apesi bokilo na ye lipwepwe, kasi luta atikali elongo na te. 15 Naomi alobi na luta, tala mbanda na yo azongi na mboka ya ba nzambe na ye yo pe sala bongo. 16 Luta azongiseli ye, kotinda ngai te natikala kozala mosika na yo, esika nyonso yo okozala nakozala na yo elongo batu nayo bakozala pe ya ngai nzambe nayo akozala pe yangai. 17 Esika yo okokufa ngai pe elongo, tika yewe apesa ngai etumbu makasi liwa ekoka bola bisote. 18 Awa Naimi amonaki azali kotingama ye kaka atikaki. 19 Bazalaki mobembo nzela moko bakendaki kino na beteleme tango bakomi engumba mobimba eningani pona bango mpe basi babandaki kotuna oyo ezali penza Naomi 20 Ye alobi bobenga ngai lisusu Naomi te kasi bobenga ngai mala, pamba te mokonzi na nguya nyoso atondisi ngai na bololo 21 Nazalaki na bofuluki tango na tikaki bino mokonzi azongisi ngai maboko pamba pona nini bobengi ngai Naomi sima ete nkolo atelemeli ngai pe nkolo nanguya nyoso apesi ngai etumbu 22 Wana balongwaki na ekolo ya moabe, Naomi na bokilo na ye Luta moabita bakomaki na betelemi na ebandeli ya kobuka loso