MOKAPO 9

1 Bayisalaele basanganaki na mokolo ntuku mibale na minei na sanja ena,balati ba ngoto mpe bamipakoli putulu,mpo na milulu na kokila. 2 Bayisalaele ya makila,bamibendi naba pagano banso;batelemi mpe bayamboli masumu mpe mabe ya ba tata na bango. 3 Otango batelemaki,buku na mobeko na yawe,njambe na bango,etangamaki eteni na ngonga minei na moi;mpe na eteni mosusu ya minei bayamboli masumu mpe bakumbamaki liboso na yawe,nzambe na bango. 4 Yosua ,bania,kademia,sebaniya,buni,serebiya,bani mpe kenani,babutio likolo ya etanda ya ba lewi mpe balangi epai na nkolo yawe. 5 Boye ba lewi josua,kadimieli,bani,hasabiniya,seribiya,hodiya,sebaniya,mpe petakiya balobi;botelema,bopambola yawe,njambe na bono,ya seko na seko!tika lokumu na nkombo nayo epambolama,likolo na mapamboli mpe masanjoli manso! 6 Nde yo,yawe,yo mei,okeli lola,mpe likolo na yango mpe mapinga na mango manso,mabele na maye mazwami likolo na mango,mai minene na maye majali onse na yango,bikela binso biye,opesaka, bomoi na na maye banso mpe mapinga na lola ejali ko kumamela oboso nayo. 7 Nde yo,yawe njambe,opona abalama,obimisa ye na uru na kalade,mpe opesi ye nkombo abalayama. 8 Omonaki motema na ye moto na sembo oboso bua yo,osalaki boyokani naye,mpe olakaki kopesa bakitani naye ekolo na bananaya,ba hetiye,baamolea,ba felejiya,bayebusiya,mpe guligasia,okokisaki maye olobaki zambi ojali sembo. 9 Omonaki minyoko na ba tata na biso na ejipito,mpe oyokaki tangwa na bango liboso ya ebale na mai motane, 10 osalaki bikamua mpe bikamwisi oboso bua falo,mpe basali naye,na bato ya ekolo naye ,mpo oyebaki kanza kani,banyokolaki batata na biso,mpe olakisaki lokumu nayo kino lelo 11 Obausaki ebale oboso na bango,mpe balekaki okati kati nayango:kasi, ojindisaki olibulu,lokola libanga na nse na mai,baye balandaki bango. 12 Na moi,otambolisi bango na etutu ya lipata,mpe na butu etutu na moto oyo ejalaki ko ngangisa njela ya etamboli na bango. 13 Olobelaki bango o likolo na ngomba na sinai uta na lola,mpe opesaki bango mitindo ya semba,malako ya solo mpe mibeko milongobani 14 Omanyolisaki bango bosantu na sabata,mpe na njela na mosali na yo mose,ongulutaki mpo na bango mitindo,malako,mpe mobeko, 15 utaliko na lola,ntango njala enyongaki bango,okitiseli bango kwanga,mpe obimisaki mai na libanga bamelaki,oyebisaki,baingela kojua mboka opeasaki boye na seleka 16 Atako boye,batata na biso bakomaki enjombo,mpe mangbongi,bayokaki mitindo nayo te, 17 baboyaki kotosa,babosani bolamu osalelaki bango,bakomaki mangbongi ;batombuki,baluki mokambi mosusu bajonga na boombu,kasi yo ojali njambe olimbisisaka,oyokaka mawa,ojuaka nkanda noki te,otonda na bolamu,mpe obuakisaka bango te 18 atako bamisaleleki ekeko na mwana ngombe ya mabende mpe balobi;tala njambe oyo abimisi biso na ejipito,mpe bamonelaki yo mabe penza. 19 Na bonene na mawa nayo,obuakisaki bango na esobe te,etutu na mapata mpe na moto,ikobaki kotambolisa mpe komonisa bango njela moi o butu. 20 Opesaki bango molimo nayo ya buana,ojangisaki bango molea nayo te,opesaki bango mai ya komela. 21 Basali mbula ntuku minei na esobe,opesaki masengeli manso,bajangaki eloko te,bilamba epasukaki te,mpe makolo evimbaki bango te. 22 Okweisaki biloko minene na mabota na yango na maboko na bango,mpe okaboli biteni na yango,ekolo ya sioni,mokonji ya heboni,mpe ekolo ya ogog,mokonji na basani. 23 Okomisaki bana na bango ebele lokola minzoto na likolo,mpe okotisaki bango na mokili olakaki na ba tata na bango bakua. 24 Mpe bana bayingelaki mpe bakuaki yango;o nyongaki mabota na bikolo,ya kanana,opesaki bango lokola mbeka na maboko na bango,mikonji mpe mabota mana,batukamaki bo,elingaki mitema na bango 25 Basangoli bingumba ya makasi na mabele kitoko;bajuaki bandako etondako na bomengo ,mabulu ya mai,ba vino,ba olive mpe banzete ebele ya mbuma;bajuaki mbimbi,mpe bakomaki ngebu-ngebu,mpe sai-sai na bonene ya bolamu nayo 26 Atako boye,batombokaki mpe babalukeli yo.Babwakisaki mobeko nayo,ba bomeleki yo basakoli ,baye bajalaki kojonga bango onjela ya yo,mpe bakobaki kotombukela yo makasi. 27 Bongo osundolaki bango na maboko naba nguna baye batukaki bango,kasi o eleko bakomi na likama,balelili yo lisusu;mpe kati na motema na mawa nayo,oyo kelaki bango uta likolo,mpe otindaki ba pomba bakangola bango o maboko naba nguna 28 Ntango bakomi lege-lege,bajongeli lisusu mbeba oboso bua yo.Lisusu osundolaki bango na banguna mpe banyataki bango.Mbala o mbala balelaka kaka,mpe oyekelaka bongo mawa ,okangolaka bango mbala inso. 29 Olobaki bajongela mibeko nayo ;kasi baumeliki kati na enjombo batosaki te,mitindo mpe basumukaki na malako manyo,maye mapesaka lobiko na baye basalelaka mango,batomboli mapeka,kingo ebende,mpe mangbongi. 30 Mibu njike ojalaki motema molai na bango,okebisaki bango na njela na molimo nayo,mpe na basakoli,kasi matoi mangbongi,na boye okabi bango na maboko na bapaya. 31 Kasi na bonenena motema mawa nayo,obomaki bango te,mpe obuakisaki bango te,zambi ozali bolingo mpe mawa sik"oyo, 32 E! njambe na biso,monene,na nguya mpe makasi,obatelaka boyokani nayo mpe olakisaka mawa,na mikakatano minso tomoni,biso,na ba tata na biso mpe bai libota,banso o eleko na mokonji ya asulia kino lelo. 33 Ojalaki sembo,na manso ekomelaki biso,zambi otikalaki sembo,nde biso babebisi. 34 Mikonji,ba bakambi,banga-nzambe,mpe ba tata na biso babatelaki mobeko nayo te,bojalaki ekenge na mitindo mpe na bokebisi osalaki bango te, 35 O eleko bajalaki ko dondua na bomengo opesaki bango,na ekolo monene mpe kitoko opesaki bango,basaleli yango te,mpe bakobisaki nse bijaleli mabe 36 E! lelo boye tokomi baumbu!mpe kati na mabele opesaki naba tata,mpo basepela na mbuma na bomengo na yango. 37 Bakonzi baye bakonji biso mpo na mbeba na biso mei,bajali kosala bo elingi bango na ba nzoto mpe bibuele na biso,tokomi nakati na bilelo! 38 Na maye manso,tokosalaki boyokani,na makomi; bongo batambolisi na biso,ba lewi na banganga-njambe batiaki mokoloto