MOKAPO 8

1 Na boye bai libota banso bo moto moko basanganaki oboso ya ekuke na ngai,balobi na esidalasa,mokomi na mibeko,baya na buku na mibeko na mose,kowuta epai na yawh mpo na yisalaele. 2 Oboso na lisanga ya mibali na basi,mpe baye bakokaki komanyola,nganga njambe esidalasa amemeli bango buku,ejalaki mokolo na yambo sanza ya sambo, 3 esidalasa atangeli bango buku banda ntongo kino midi oboso ya ekuke na mai,mpe bai libota balandaki na bokebi botangi na buku ena 4 Esidalasa na mokonzi mibeko bamataki o etanda na mabaya,ebongisamaki mpo na milulu mina,baye bavandaki naye na loboko na mobali mpe na mwasi ejali;matitia,sema,anaya,uliya,hikiya mpe maseya,pedaya,mikaele,makiya,hasumu,hasibadana,jakalia,mpe mesulama. 5 Ntango atelemi likolo na etanda,na buku na maboko,banso bamoni ye kofu ngola buku,batikali njuku-kalu 6 Boye esidalasa akumisi yawe,njambe monene mpe bai libota banso batomboli maboko olikolo bandimi;ezala nse bongo;ezali nse bongo!(amen)!babuki mabolongo bilongi o nse mabele,mpo na komemya yawe. 7 Bongo yosua,bania,selebiya yamina,akubu,sebetai,hodiya,maseya,kelifa,ajalia,jojabada,hanana,peleya,mpe balewi,balimbolaki mibeko na bai libota kati na botosi. 8 Polelele-polelele batangaki mpe balimbolaki,mibeko na nzambe mpo bamanyolisa miango 9 Bongo nehemiya moyangeli na etuka,nganga nzambe asidalisi na na bakomi mibeko mpe balewi balakisi na mabota,balobi na bango;mokolo moye mobulisami na yawe,njambe na bino;bozala na mawe mpe bilelo te!zambi moto yonso azalaki nabobangi nakoyokaka mibeko, 10 Balobi na bango;bokenda,bolea mbisi mpe bomela masanga kitoko,bokanisa mpe baye bazangi,zambi mokolo moye mobulisami na mokonzi njambe na biso mawa ejala na bino te,zambi esengo na yawe ekopesa bino bopikiliki. 11 Ba lewi balendisaki bai libota;ete,bobatela kimia,bozala na mawa te,zambi ezali mokolo mobulisami! 12 bongo bato banso bakendaki kolia na komela,kotindela ba mosusu ndambo na bilei,nsai etondaki bango,mpo basosolaki maye batangelaki bango. 13 Na mokolo na mibale ,bakambi na mabota banso,ba nganga-njambe,mpe ba lewi,bakutanaki epai na esidalasa motangisi mibeko,mpo na boyoki ndimbola na mokomi mana. 14 Na buku ena engulutamaki na yawe na njela na mose,mitindo epesama ete,o ntango na milulu ya sanza na sambo,ba yisalaele bakovanda naba hema. 15 Bobeta tangwa na ba engumba inso,mpe na yelusaleme;bomata naba ngomba kobuka yaba olive,na oyo ya zamba,mpe mandalala ya mite,na ya mbila,mpe na ba nzete mosusu,mpo na kotonga ba bikuku,bo ekomama 16 Na boye moto yonso akendaki kobuka mandalala,mpe batongaki ba hema olikolo na bandako,na mabanda,mpe na mbalasani na ndako na njambe,na esika ya bikuke na mai mpe na ekuke na efalieme. 17 Lisanga na baye banso bautaki bohombu batongaki mpe bavandaki o ntei naba hema,kobanda eleko na yosua mwana na nuna,kino tango eye,bayisalaele batikala kosala makombo motindo boye te,kosepela elutaki ndelo 18 Mikolo minso,banda mokolo ya yambo kino na suka,bajalaki kotanga buku na mobeko na njambe,mpe milulu mijalaki kosalema mikolo sambo,mpe likita monene ezalaki na mokolo na mwambe,ndenge mitindo epesama