MOKAPO 5

1 Yiki-yiki makasi eningisaki mibali na mabota mpe basi na bango na boyini bai bayuda. 2 Ba moko babeti tangba;tozali epele na bana basi mpe mibali;bopesa biso loso,tolea mpo to jua makasi. 3 Ba mosusu;tosimbisi bilanga ,nzete na miwiti,mpe ba ndako,mpo tojua loso o eleko nzala ekoya 4 Ba mosusu balobi;todefaki misolo mpe tosimbisaki bilanga mpe ba miwiti mpo na kofuta mpako. 5 Nzoka nde biso banso nzoto ewulami,bana na biso ba wulami;emonani,tojali koniokola bana na biso mibali na ya basi,mpe oyo ya basi basambui;totikali bibobolo,bilanga na miwiti na biso babotoli. 6 Na dasuki mingi koyoka bilelo na bango,mpe kanza ena, 7 na dasuki na mikolo mpe bakengeli mibeko,nagangeli bango;boni boye! bozali kodefisa na na ndanga bandeko na bino!nayangiselaki bango etuluku ya bato, 8 mpe na yebisi; tosala makasi tosikolo makasi tosikola bandekola bayuda bakangamaki o bohumbu na bikolo mosusu ;sikoyo bino bolingi konyonga lisusu bango boyeba,bafutaki ngambo na biso! 9 Mpe nayebisi;ezali malonga te maye bozali kokela,ebongi na bino te bojala na limemya na nzambe na biso,zambi to wololama na ba mboka eyini biso? 10 Ngai mpe ;nalibota mpe nabasali na ngai totikeli bango biye todefisaki bango;mbongo mpe loso. 11 Na sengi na bino nse lelo,bozongisa bilanga,miwiti olive,mpe bandako na bango,eteni na nkama na misolo,n,a loso,na vino mpe mafuta maye bopesaki bango ndanga. 12 Bayanolaki; tokonjongisa,mpe tokosenga eloko te,obe maye olobi tokokele bango,bongo nalapisaki bango ndayi engebene na maloba na bango,liboso ya banganga njambe. 13 Mpe na pupoli jambala na ngai,mpe nalobi;tika njambe mpe apupola,abwakama mosika na ndako,moto yonso akotosa maloba maye te,nde bongo moto ena apupolama mpe atikala mobola!lisanga mobimba endimi ;etikala boye!bakumisi yawe mpe bato bakokisaki maloba na bango. 14 Kobanda mokolo nkumu na mboka atomboli ngai moyangeli na bango o engumba yudea,kobanda na mobu ntuku mibale kino mobu na ntuku misato-na-mibale na mokonzi aletazerzese,ngai na libota tojuaki ata lifuta ya bokonzi te,kolanda mbula zomi na mibale. 15 Liboso nazua mpifo,bayangeli ya yambo,banyongaki bato,kobotola bileyi,vino,mpe misolo ekokani na sicle ntuku minei;nabasali na bango lolenge moko,konyonga bai-libota,mpo na bobangi njambe,tosalelaki lolenge ena te 16 Atako mingi-mingi tomipesaki na mosala yakotonga efelo,tosombaki ata mabele te,mpe basali banso na ngai nse na mosala ya kotonga, 17 Na kambaki bato nkama-na-ntuku mitano,bayuda mpe bakengeli-mibeko,mpe baye bajalaki kowuta na ba mboka nzinga-nzinga 18 Bajalaki kopesa mikolo minso ngombe moko ,bampate,meme motoba ya kitoko,mpe bandeke babokoloko;mpe mikolo zomi biloko ezalaki kolambama ebele,mpe ba vino yonso,atako boye,nazuaki lifuta ya moyangeli te,mpo mokumba yonso ya botongi ezalaki na bai-mboka, 19 Eh! nzambe na ngai,nabolamu eye nasaleli bai-libota ,okanisa ngai