MOKAPO 4

1 Eyoki sabalata ete toyei kozongisa efelo,adasuki na kanda, 2 atyolaki bayuda ,liboso na bandeko naye mpe ba mapinga ya samalia:Bato yampamba oyo bayuda ,bajali kosala nini? Bakotikela bango kosala? Batumba mbeka?Bakokoma tii na suka?Mabanga oyo eziki na moto,mpe ekundami na mabele,bokopesa yango lisusu lipomba ? 3 Pembeni naye tobija,amonite mpe alobe: mosala ya mpunda ! soki mobuabua etuti yango,efelo wana ya mabanga ekosopana nase. 4 O njambe,yoka,lokola bajali kotyola biso! mafinga na bango ekpya na mitu na bango bakumbama na mokili na bohumbu,mpe bapunza-punza bango, 5 mbeba na bango olimbisa te,mpe masumu na bango elongwa te oboso bua yo;zambi batuki baye bajali kotonga. 6 Tosilisaki kotonga efelo,kino na kati-kati ya bolai na yango.Mpe bato bakomaki molende. 7 8 9 Kasi sabalata ,tobija,ba alabo,ba amonite mpe ba adodiana,badasukaki na boyoki ete misala mia efelo ezali kokoba,mpe madusu manso majali kokangama, banso basali likopa mpo bapunza yelusaleme mpe bamwanganisa yango, tosambelaki nzambe na biso,mpe totiaki bazamu butu na moi mpo to telemela bango na etumba 10 Na yango yuda alobaki:bokasi ezali te,naba ye bamemi ngambo oyo,mpe ekozala likama monene;tokokoka, kotonga efelo te. 11 Mpe banguna na biso balobaki;topusana o kati na bango,bakoyeba te mpe bakomona te;tokoboma bango,nde tokosukisa misala mina yabotongi 12 Nzokande,bayuda baye bajalaki kovanda na bango bayaki bala jomi kobebisa biso,bisika binso bakanaki kokotela biso, 13 nayango natiaki,o nse nabalobuako nsima ya efelo,mpe nabisika bikauki,libota na libota na mipanga,makonga mpe bibundeli. 14 Na telemaki ,mpe na talaki,nalobi na mikolo,na bai-mibeko;bolenga te! botalela mokonzi,monene,mpe na nguya,mpe bobundela mabota na bino,mpona bana na bino mibali mpe ya basi,mpo na basi mpe bandako na bino! 15 Tongo banguna bayoki ete totimbeli bango,njambe abebisi miango mina,mpe tozonge kotonga moto na moto na maye azalaki kosala, 16 Uta mokolo mona,basali bakabuanaki na biteni mibale,ndambo mpo na mosala,basusu nabibundeli:Makonga nguba,litimbo,mpe mokoto na etumba,mpe bakambi banso basimbaki libota na yuda 17 Baye bazalaki kotongo efelo mpe basungi na bango bajalaki kasala loboko moko mpe mosusu esimbi ebundeli: 18 Moto na moto azalaki kosala ,ajalaki na mopanga naye na nguku,mobeti kelelo pene na ngai. 19 Nayebisaki mikolo na mboka ,bai mibeko,mpe banso ba libota;ezali ebakatana na mosala mpe molai,topanzana,topesana taka bamoko mpe basusu. 20 Soki boyoki kelelo kobeta ,bopusana otinga-nzinga na biso ,esika bokoyoka lokito;njambe akobundela biso 21 Naboye tokokoba kotonga,basusu nabiso, makonga na maboko,banda ebandeli ya tongo,kino butu, 22 bobe na ngonga ena,nayebisi lisusu baye mboka;moto yonso na mosali naye;akenda kolala na yelusaleme ;to senzela obutu,mpe tosala na moi. 23 Mpe tolongola bilamba te,ejala ngai, libota na ngai,basali ngai,basenzeli banso balandi ngai;moto na mota azalaki kaka na ebundeli mpe mai