Mokapo 3

1 Sika balingami, mokanda moye mwa babale nakomeli bino, mpo na bolamusi bosolo bwa molimo na bino, 2 ntina ya bino kobangaka ngonga o ngonga, maloba mosanto, masakolamaka na basakoli basantu mpena ndema (mitindo) nya Mokonzi, apesaki biso nzela ya ba ntoma na bino 3 Nayambo yeba ete ba tyoli bakoya na mikolo nya suka, ba kotyola mpe bakotambola engebene na ba mposa ya bango mey. 4 Na kolobaka: «Elaka na bozongi bwa ye ezali wapi?» Uto bakeli bwa mokili, kokoma na ba tata na biso, kino sika makambo natikali obe bongo. 5 Ba mibungisi bango moko, koboye ete likolo mpe nse bisimi o kati ya bibale uto kala kala engebene liloba na Nzambe. 6 Ezali na makambo mya lolenge ena nde, mokili na kala ebebi, samaka mpe ezindaka o ebale. 7 Na yango likolo mpe nse bibongisami mpo na moto engebene na mitindo kaka yoko byango bibongisami mpo na mokolo ya esambiselo mpe ya libebi ya bato mabe. 8 Balingi , bobunga elongo oyo te, ete mokolo yoko epayi na Nkolo ewulani na mibu koto yoko, bongo mibu koto yoko mpe lokola mokolo moko. 9 Nkolo ekowumela te, mpo akokisa yaye bilaka, lokola ekobanza bayi, kasi ye azali kozelisa mbongwena na bino, zambi alingi ete, moto moko abunga te, kasi kosepela ete banso babongola mitema. 10 Na yango mokolo na Mokonzi, ekokoma lokola na pwasa, likolo ekoleka na lokito ekasi, biloko bikozika o moto, mpe mokili ebongo na biloko byango mpe lokola. 11 Mpo ete boyike bwa biloko bina, bikobebisama lolenge yoko, bosengeli kozala bato ya lolenge nini? Bosengeli kobika na bosanto na Nzambe mpe limenya. 12 Bosengeli kozelisa boyeyi bwa mokolo na Mokonzi, na bokangi motema, pamba te, likolo ekobeba o moto, mpe biloko nzike ekonyangwana lokola. 13 Kasi biso tokozela se elaka ya ye, likolo na sika mpe mokili na sika, wana bosembo ekowumela seko na seko. 14 Na bongo balingami kozela makambo mana, bosala makasi mpo bozala na litono te, to mpe tz o boso bwa ye, engebene na kimia elongo na ye. 15 Koyeba ete kozelisa ya Mikonzi na biso nde libeki na biso lolenge molingami Polo akomaki, na lolenge bwanya epesamelaki ye. 16 Polo alobeli makambo oyo manso o mikanda na ye, kuna kati makambo misusu, masegi lisosoli, mpo bato ya mabunga mpe batelema ngbi te, bazali kobungisa lolenge ya bososoli ya makambo mango engebene esalaka bango na nakomi masantu mpona libebi ya bongo meyi. 17 Mpo na yango, balingami, eyebi bino makambo ma ye, bozala na bokengi mpo ete bopengwa tena lokuta ya bato ya mbindo , oyo baluki bobungisa bompikiliki ya bino epayi na Mokonzi. 18 Kasi bokemba katina ngolu mpe boyebi na Mokonzi mpe Mobikisi na biso Yesu Klisto, naye nkembo sasayipi mpe lobiko na lobiko. Amen!