Mokapo 2

1 Ba sakoli na lokuta bakomi kati na bato, bateyi balokuta bakoya mpe lokola. Bakomeme na bokuta mateya na libungi mpe libebi, zambi bako wangana Mokonzi moye asikolaki bango. Na yango bako benda na mpwasa libebi. 2 Bayike bako landa maloba sukali na bango, bongo na nzela na bango, bosolo ekonyokwana. 3 Na lokoso ya bango, bako kosa bayike ba bino na maloba lokuta, etumba ya bango ekowumela te, libebi na bango mpe ekolala mpongi te. 4 Soki Nzambe abikisaki te ba anjelu oyo basumukaki, kasi apesaki bango mbeka epayi ya Tartarusi mpo babombana o mokili bwa bozindo na minyololo, kozelaka esambiselo. 5 Mpe ya abikisaki mokili na kala te, bobele kaka Nowa, nde abombaki ye, zambi azalaki moteyi na bosembo, elongo na bato sambo, etindaki ye mbula monene na mokili na basumuki. 6 Yango mpo nakopesa ndakisa na mokili ya bato mabe, Nzambe azikisaki kino kokomisa putulu, bingumba Sodoma mpe Gomora. 7 Bobele Lota nde Nzambe abikisa, kati na minyokoli mingi ya etamboli ebe ya baye bakabwana mpe batombokela mibeko. 8 Mpamba te, moto afandaki mikolo na mikolo kati na bango, molimo mwa ye ya sembo etungisamaki mpo na mabe maye azalaki komona mpe koyoka. 9 Mokonza nde ayebi ndenge kokangola bato semba o boso ya komekama, mpe lolenge nini kobomba bato bazanga bosembo mpo na bozui etumbu o mokolo mua bosambisani. 10 Yango ezali solo na baye ba kobi kotambola na ba mposa mabe ya nzoto, nakoboyaka bokonzi, bazali na mangbongi koleka, bakebaka te kotuka bato batombwa na lokumu. 11 Ba anjelu batonda bokasi mpe ngula, bakoki te komeme o boso bwa Nzambe bisambiselo ya mafinga. 12 Zambi banyama bazanga boyebi, bakelama mpona boleyi mpe libebi, bayebaka te eloko ekofinga bango. Ba bebisami. 13 Bakozua mbano ya misala ebe ya bango, bazo likwa te komipesa na misala ya lofundu mokolo na mokolo nde malamu bami babisi mpe bami komisi mbindo, bazali komi sepelisa na lokuta ya bango na eleko ya ba nteke ya bino. 14 Miso ya bango etondi na bililingi ya basi na bikobo, batondaka mabe te to masumu te, babendaka milimo ya boye bakemba te na nzela ya bango ya mabe mitema nya bango eyebi kolula makasi bazali bana na libebi. 15 Basundoli nzela na sembo, ba pengwi mpe balandi nzela ya Balaam muana ya Beor, ye oyo alingaka mingi kozua lifuta ya baye bazanga sembo. 16 Kasi azwamaki mpo miko na ye nei, mwa mbalata (ânesse) emini (muette) alobaki na mongongo ya moto, kokebisa mosakoli na liboma ya misala na ye. 17 Bato baye bazali lokola mosulu ezanga mayi, bazali ba mapata matangbi na mopepe ekasi, molili makasi ekokwa bango. 18 Bakoloba na lofundu ya pamba, bakobenda bayike na ba mposa ya nzoto, bakobenda mpe lokola baye bameki kokima o nzela ya libungi. 19 Bazali kolaka bango bonsomi, kasi bango moko bazali baombo na libebi, mpo ete moto azali moombo na makambo nzike oyo ezingi ye. 20 Moto nani akimi bosoto na mokili na nzela ya boyebi Mokonzi mpe mobikisi Yesu Klisto, bongo ezongeli lisusu bosoto boona, lolenge ya na ye ekozala ebe koleka ya kala. 21 Ebongaki malamu mpona bango koyeba nzela na bosembo te, bongo na mbisa, ba pengwa na ndema esantu moye bamopesaki. 22 Lisese liye liwulani mpo ya bango: «Imbwa akozongelaka bisanzi ya ye, pelamoko ngulu na mbisa ya bosukoli ye, azongi o potopoto.»