Mokapo ya 3

1 Nayango ba ndeko, esengo na biso ezala kati na Mokonzi. na lembi te kokomela bino kaka makambo yango. yango nde eko bikisa bino. 2 Bo keba mpona ba mbwa mpe basali ya mabe, bokeba na bakati ngenga ya lokuta. 3 Mpo ete biso nde bakati ngenga ya solo, mpe to kongumbamelaka Nzambe na molimo. Biso baye tozui lokumu kati na Yesu Kristo, Mpe elikia na biso ezali na nzote te. 4 Ngaï mpe na kokaki mpe kolikia na nzoto. Soki moto akanisi ete ebongi naye kolikia na nzoto, lokola nga mpe. 5 Na katamaka ngenga mokolo ya muambe, mu Isalela, libota ya Benzamini, Hebeleo ya Hebelelo, mpona mobeko ya ba Pharizayo. 6 Na komikumisa na tembe te, mobebisi na linomba na tina na mobeko. 7 Mpona Yesu Kristo, oyo ezalaki litomba mpona ngaï, na tali yango lokola kobungisa. 8 Natina na kitoko ya boyebi kati na Mokonzi Yesu Kristo, Mpe na tali nionso ya kombugisa mpe lokola poto - poto, nayango na tiki nionso mpona Kristo. Mpona yende na tika makambu nionso. Nazali komona yango lokola mbindo, kaka mpona yamba Kristo. 9 Mpe kozala kati na ye. mpona sembo ezali mpona boyengebene na ntina na mobeko te, kasi oyo na zui na kondima kati na Yesu, boyengebene ewuti na Nzambe na kondima nde na ndimami na ye. 10 Sasaipi nalingi na sosola nguya ya lisekua na kristo, mpe bomoko ya ba mpasi naye. Nalingi na mikokisa na liwa ya kristo, mpona lolenge moko. 11 Mpo ete na longa kati na lisekwa kati na ba weyi. 12 14 Ezali te ete na kui makambo mango, napetolami nanu te mpe nazui motole te nde nazo pota bangu ete nazua yango mpo ete ngaï mpe na simbami na Yesu Kristo. 13 Bandeko, nazo kanisa nanu te ko simba yango. Kasi nazo kanisa boye: Kobosana nionso oyo eleka mpe natala mpona oyo ezali liboso, Nazo kima na lombango mpona tina, mpo nazua motole na bomoyi na Nzambe katina Yesu kristo. 15 Na kyango biso baye banso to kembi, to zala se na likalisi moko, soki bokokanisa lolenge mosusu Nzambe mpe ako lakisa na lolenge na esika wana. 16 Nayango, na esika biso tokomi, totambola lolenge moko. 17 Bandeko, bomekola ngaï, botala se baye batambolaka engebene lolenge na biso. 18 Mpo ete bayike kati na bino batambolaka lokola bayini na ekulusu na Kristo, eko loba ngaï boye pisoli etandi ngaï na biso. 19 Mbanu na bango ezali be libebi, mpo ba salelaka kaka libumu na bango, ba pesi lokumu na oyo ekosala soni na bango. Bakanisaka kaka makambo ya mokili. 20 Biso tozali bayi likolo, kuna tokozela mobikisi Mokonzi Yesu Kristo. 21 Ako bongola nzoto na biso ya soni, mpe kowulanisa yango na Nzoto naye ya nkembo, oyo esalami na bokonzi na nguya mpona kokonza makambu nionso epayi naye.