MATAYO 3

1 Na mikolo wana,Yoane Mobatisi ajalaka koteya kati na lisobe ya Yudea na kolobaka: 2 «Bobongola mitema, pamba te bokonji na likolo ebelemi.» 3 Nzoka nde, tala oyo balobelaki na mosakoli Isaya ete «Mongongo ya ye oyo ejali konganga na lisobe"bobongisa balabala na Mokonji, sembola banzela na ye"» 4 Tala, Yoane alataki monkoto ya nkunja ya kamela mpe mokaba ya mposo ya nyama na liketo na ye,bilei na ye ejalaki makonko na mafuta ya njoi. 5 Na yango, Yelusaleme, Yudea mobimba mpe etuka njinga njinga na ebale ya Yolodani bajalaki kokenda epai na ye. 6 Babatisamaki na ye kati na ebale ya Yolodani, na ndenge bajalaki koyambola masumu na bango. 7 Kasi tango amoni ebele ya bafalisayo mpe basaduki koya na ye mpo na libatisi, alobi na bango: «Bino bakitani ya nyoka ya ngenge, nani akebisi bino bokima kanda ejali koya? 8 Bobota mbuma malamu ya bongwana. 9 Mpe bokanisa te nakoloba mpo na bino moko. Tojali na tata na biso Abalayama, pamba te, najali koyebisa bino ete Njambe ajali na makoki ya kotelemisa mpo na Abalayama bana ata na mabanga oyo. 10 Kala soka etiama pembeni ya misisa ya banjete, boye njete nyoso oyo ekobata mbuma malamu te ekokatama mpe ekobwakama kati na moto. 11 Ngai najali kobatisa na mai mpo na kobongola motema. Kasi oyo akoya sima na ngai ajali na nguya koleka ngai, mpe ngai najali kutu na makoki te ya kolata sapato ya ye. Akobatisa bino na Molimo Mosantu mpe na moto. 12 Epupelo ejali na loboko na ye pene pene ya kopetola solo etumbelo. Kasi akojikisa matiti na moto oyo ekoki kokufa te. 13 Sima Yesu akomi na Galilea na ebale ya Yolodani mpo babatisa ye na Yoane. 14 Kasi Yoane amekaki penja penja koluka koboyela ye, alobi: «Ngai najali na mposa najua libatisi na yo, mpe yo oyei na ngai?» 15 Yesu ajongisi mpe alobi: «Tika esalema sika oyo, mpo ejali malamu mpo na biso tokokisa bosembo nyonso.» Na boye Yoane andimelaki ye. 16 Sima ya kojwa libatisi, Yesu abimi mbala moko na mai mpe tala, likolo efungwamelaki ye. Molimo na Njambe kokita na lolenge na ebenga evandi likolo na ye. 17 Tala, mongongo moko ebemi na likolo koloba: «Tala mwana na ngai ya bolingo. Asepelisaka ngai.