MOKAPO 13

1 Na eleko wana ,tango bazalaki kotanga mokanda ya mose liboso ya bato,bakomi na esika bakoma ete ba amonite na ba moabite bakoki ata moke te kokota kati na lisanga ya nzambe. 2 Pamba te na kala,bana isalayele bayambaka bango te bapesaka bango belei nto mai yakomela te,kutu ba moabite bafutaka balaam mosolo mpo aya kobuakela bango lisuma;nkasi nzambe na biso abongolaki lisuma yango,ekomaki mapamboli. 3 Tango bayoki mobeko yango,bazui mokano yako bengana bapaya nioso na kati ya lisanga na bango 4 Liboso na yango nganga-nzambe Elyashib aponamaki mpo abatelaka ba ndako oyo babakisa na ndako ya nzambe. 5 Ndako moko monene apesaki tobija mpo afanda wana,ezalaki ndako oyo bamesanaki kobomba makabo ya biloko ya bilanga,malasi,biloko basalelaka na ndako ya nzambe,na moko na zomi ya loso ,vino ya sika mpe ya mafuta,oyo bazalaki komemela ba lewi,bayembi mpe bakengeli ya bikuke,mpe oyo bazalaki kolongolela ba nganga-nzambe 6 Nazalaki lisusu na yerusaleme te,tango makambo yango elekaki ,nakendaki epai ya artazerkses,mokonzi ya babilone ,na mbula ya tuku misato na mibale ya bokonzi naye. 7 Na suka ya mbula, mokonzi apesaki ngai ndingisa,nazongaki na yerusaleme,nayaki komona mabe oyo, Elyashib asalaki,nalolenge avandisaki tobija na ndako moko na kati ya lopango ya ndako ya nzambe 8 Nasilikaki makasi mpe nabuakaki biloko nyonso ya tobija libanda ya ndako. 9 Sima na pesaki mitindo bapetola bandako nyonso mpe bazongisa biloko nyonso basalelaka na ndako ya nzambe,makabo ya biloko ya bilanga mpe malasi oyo ba tumbaka 10 nayokaki lisusu ete ba lewi bazalaki kozanga biloko oyo basengelaki bazua,yango ba lewi mpe bayembi bakimaki na bango,mpe bakendaki kosala moto na moto na elanga na ye. 11 Na gangelaki bakambi longe basaki ete ndako ya nzambe esundulama ,sima sima na sangisi ba lewi na bayembi,mpe nazongisi bango na mosala 12 Boye bato ya yuda bazongelaki kopesa moko na zomi ya loso ya vino ya sika mpe yamafuta. 13 Naponi nganga-nzambe shelemya,moyebi mibeko malamu sadok,mpe molewi moko na komba pedaya,mpo bakengela ba ndako yango,basungamaki na hanam,mwana ya zakur mpe koko ya matanya,bazalaki bato ya bosembo;yongo bazuaki lotomo ya kokabola biloko na bandeko na bango. 14 O nzambe na ngai,kanisa makambo oyo nasali kobosana te lolenge na bongisi ndako nayo mpe mosala nayango nabosembo 15 Na mikolo wana,na sabata;namoni na mboka yuda batobazali kokamola vino,ba susu bazalaki koya na yelusaleme na loso,vino,bambuma ya vino,ya mosuke mpe maboke,ya lolenge na lolenge,oyo batiaki likolo yaba mpunda.Nakebisaki bango mokolo balingaki koteka biloko na bango 16 Namokolo ya sabata,ba lewi oyo bafandaka na yelusaleme bazalaki koya kotikisa bambisi mpe biloko mosusu yako lia epai na bato na jerusaleme mpe ya yuda mobimba. 17 Nagangeli ba mbuta mutu ya yuda boye; bozali koyeba mabe oyo bozali kosala? Bozali kotosa bosantu ya mokolo ya sabata te . 18 Bakoko na biso bazaka boye,yango wana nzambe na biso apesi biso etumbu na mboka na biso.Sik"oyo bino bozali kaka kobakisa kanda na nzambe epai na yesalael,na lolenge bozali kotosa mokolo ya sabata te 19 Yango wana na pesaki mitinda bakanga bikuke ya yerusaleme na pokwa,liboso ete mokolo na sabata ebanda,mpe ba fungolaka bobele sima mokolo na sabata.Natiaki basali na ngai mosusu nzinga-nzinga mpo bakengela elokomo yakoteka ekota na yerusaleme te na mokolo ya sabata. 20 Na bongo,bateki ya biloko lolenge yonso ba lalaki libanda mbala moko to mibale 21 Nakebisaki bango boye;mpona nini bozali kolala nzinga-nzinga ya bifelo? Soki bomeki lisusu ,nakokangisa bino ,banda mokolo wana bazalaki koya lisusu na mokolo ya sabala te. 22 Natindi ba lewi bamipetola mpe bakende kokengela bikuke ya engumbo mpo bato ba tosa bosantu ya sabata.O nzambe na ngai,na makambo yonso oyo,kanisaka ngai ,na bolingo nayo monene,yokela ngai mawa! 23 24 Na mokolo wana,namonaki ete ba yuda mosusu babalaki basi ya ashdod,ya Amon mpe ya moab. Ndambo ya bana na bongo bazalaki koloba monoko ya ashdod,basusu bazalaki koloba minoko ya bikolo mosusu ya ba paya,kasi moko te kati na bango ayebaki koloba monoko ya ba yuda 25 Nagangelaki bango mpen nalakelaki bango mabe,nabetaki kutu basusu,mpe na kanda nyonso na pikoli bango suki ,sima nakatisaki bango ndai na kombo na nzambe mpo babalana lisusu naba paya te,ezali bango moko nto bana na bango. 26 Natunaki bango;ezali likambo wana te nde ememisaki mokonzi salomon lisumu? Nakati na bikolo nyonso ya bapaya,mokonzi moko te akokanaki naye;pamba te nzambe alingaki ye mingi mpe apesaki ye bokonzi na isalayele mobimba,kasi bamemisaki ye masumu na basi ya bapaya. 27 Sok"oyo bino pe bokomi kososolisa biso mpe na ntina bokomi kosala masumu yakosundola nzambe,nalolenge bomikobala basi ya bapaya? 28 Mwana moko ya yojada,mwana ya nganga-nzambe elyashib,abalaki mwana ya sambalat,moto ya mboka ya bet horon.Yango wana na benganaki ye na yerusaleme, 29 kobosana te ,o nzambe na ngai ,lolenge bango babebisaki lokumu ya nganga-nzambe,mpe boyokani oyo asalaki na ba nganga-nzambe mpe ba lewi. 30 WWana ezali lolenge nalongolaki bato na biso na makambo nyonso ya bapaya mpo ba petolama.Nazongisaki mibeko etali mosala ya nganga nzambe mpe ba lewi,na lolenge moto na moto azalaki kosala yango, 31 mpe na maye etali mikolo oyo basengeli komemaka bakoni,mpe nazongisaki makabo ya mbuma ya liboso ya bilanga,na bolingo nayo,O nzambe na ngai,kanisaka ngai mpe pesa ngai bolamu