Mokapo 12

1 Tala ba nganga-nzambe mpe ba lewi oyo bawitaki na boumbu na zorobabel ,mwana ya shaltiel,mpe yoshua:seraya yeremia ,esdras, 2 Amaria,maluc,hatush, 3 shekanya ,rehum,meremot 4 Ido,ginetoi,abiya, 5 miyamine madia, bilga, 6 shemaya,yoyaribe,yedaya, 7 salu, amok, hilkiya mpe yedaya . Na eleko ya nganga-nzambe yeshua ,bango bazalaki bakonzi ya mabota yaba nganga-nzambe mpe yaba lewi 8 Ba lewi;yeshua, binui kadmiel ,yuda mpe matanya ,oyo elongo na bandeko naye ba bandaki kokumisa nzambe naba nzembo. 9 Bakbukya na uno,bazalaki koyamba yango. 10 Yoshua abotaki jojakim ,jojakim abotaki elyashib,elyaship abotaki jojada, jojada abotaki jonatan , 11 mpe jonatan abotaki jadua. 12 Tala na tango nganga-nzambe jojakim,bakonzi ya mabota ya nganga-nzambe bazalaki seraya na libota ya meraya 13 hamanya na libota ya yeremya,meshualam na libota ya esdras, 14 johana na libota meliku,jonatan ;yozef na libota ya shebanya 15 Adna na libota ya harim;helkai na libota ya merajot 16 zakarya na libota ya Ido; meshulam na libota ya gineton , 17 Zikri na libota ya abija ;piltai na mabota ya minyamin mpe moadya, 18 shamua na libota ya bilga,jonatan na libota ya shimeya 19 metanai na libota ya mojarib,uzi na libota ya yedaja 20 kalai na libota ya salai; eber na libota ya amok 21 hashabya na libota ya hilkija,mpe netanel na libota ya yedaya 22 Na eleko yaba nganga-nzambe minene elyashib ,jojada, johanan mpe juda ,bakomaki ba kombo yaba kambi ya mabota yaba lewi mpe ya nganga-nzambe,na tango ya darius mokonzi ya perse. 23 Ba kombo ya bakonzi yaba lewi ekomamaki na mokanda yaba sango ya minene; tii na eleko ya nganga-nzambe johana ,koko na e;lyashib. 24 Bakonzi yaba lewi : hashabya ,sherebya mpe yeshua,mwana ya kadniel,elongo na bandeko na bango,bazalaki kotalana na ba lewi mosusu mpo na kokumisa nzambe na ba nzembo mpe kopesa ye matondi,kolandana na mibeko ya Dawidi ,moto na nzambe. 25 Bakengeli ya bikuke : matanya,bakbukya ,obadya,meshualam,talmon mpe akub,bazalaki kokengela bandaku ya kobonbela biloko oyo ezali pene pene ya ndako ya nzambe. 26 Bazalaki kosala mosala na bango na eleko ya nganga nzambe jojakim,mwana ya yeshua mpe koko ya josadak ,mpe ya nehemya,motambwisi ya engumba,mpe ya nganga-nzambe Esdras ,moto eyebi mibeko malamu. 27 Tango ya kopambola bifelo ya lopango ya yerusalem babengaki ba-lewi na bisika yonso mpo baya kosepela na milulu yango na yerusalem na banzembo ya kokumisa nzambe na bangongi,makemba mpe mandanda. 28 Bayembi basanganaki bawuti na ba mboka nzinga nzinga ya yerusalem mpe na netofa 29 Mpo bet-gilgal,geba mpe azmawet, 30 banganga-nzambe naba lewi bamipetoli mpe bato yonso,na bikuku mpe bifelo ya engumba. 31 Na matisi bakonzi ya ba yuda likolo ya bifelo ,nabongisi masanga mibale ya minene na bayembi ,kuna likolo ya efelo ,lisanga moko ya bayembi ekei na loboko ya mobali tii na ekuke ya fulu. 32 Sima na bango hoshaya na ndambo ya bakonzi ya yuda,bazalaki kolanda. 33 Banganga-nzambe oyo bazalaki kobeta bakelelo: Azaria,Esdras;Meshulam, 34 yuda, benyamin ,shemaya mpe yeremya. 35 Bana yaba-lewi oyo:zakarya,mwana ya jonatan ,ya libota ya Asf,ba koko na ye :Zakur ,mikaya ,matanya,shemaya; 36 Na baninga naye shemaya,Azarel ,milalai ,gilalai,maai,netanel,yuda mpe amoni,bango ba memaki mandanda oyo Dawidi,moto na nzambe.Esdras,moyebi mibeko malamu,azalaki liboso na bango. 37 Na ekuke ya liziba, bamati na ematelo oyo ekende tii na mboka ya Daiidi,baleki ndako na Dawidi,bakomi tii na ekuke ya bamai,na epai moi ebimaka 38 Lisanga ya mibali ya bayembi ekei na loboko ya mwasi ,nazalaki kolanda yango likolo na efelo ,na ndambo mosusu ya bato . Toleki na ndako ya molai ya ba-fur,tu na esika oyo efelo ekoma monene, 39 toleki mpe na likolo ya ekuke efraim,ya yeshama mpe yaba mbisi,sima toleki na ndako ya molai ya hananel mpe ya basoda kama,tii na ekuke ya bameme,bongo tokomi na ekuke ya ba kengeli. 40 Masanga nyonso mibale ekendeki kotelema na ndako ya nzambe,totelemaki wana na bakambi, 41 mpe banganga-nzambe eliakim, maseya,minyamin,mikaya,Elyoenai,zakariya mpe hanaya oyo bazalaki kobeta ba kelelo, 42 Mpe maseya ,shemaya,Eleazar,JUzi,johanan,malkiya,Elam mpe ezer. Bayembi bayokanaki ko kambama na Izraya,akomaki moyembisi na bango. 43 Mokolo wana bapesaki makabo ebele na esengo.pamba te nzambe atondisaki bato na ye na esengo monene. Basi na bana bazalaki na esengo mingi,mpe makelele ya kosepela ya yerusalem mobimba ezalaki koyokana mosika. 44 Na mokolo wana baponi bato bakengela ba ndako,ya kobombela makabo oyo bazalaki kopesa nzambe,mbuma ya liboso mpe na mokolo na moko zomi ya biloko ya bilanga.Bapesaki lotomoya koyamba biloko ya bilanga oyo ezalaki nzinga-nzinga na engumba na tango,oyo esengelaki komemela ba nganga-nzambe na ba-lewi, ndenge mibeko ezali kotinda.Pamba te, bato yonso ya yuda bazalaki kosepela na mosala ya ba nganga-nzambe. 45 Bazalaki kosalela nzambe,mpe kokomisa bato ya bikolo peto.Bayembi mpe ba kengeli ya bikuke bazalaki kolanda mitindo ya mokonzi Dawidi mpe ya mwana ye salomon. 46 Pamba te ,na eleko ya David na moyembi asaf,bakambi ya masanga yaba yembi bazalaki koyembisa banzembo yakokumisa nzambe mpe ya kotonda ye. 47 Na eleko ya zorobabel ,mpe ya nehemya ,isalayele mobimba bazalaki kopesa mikolo yonso bayembi mpe bakengeli ya bikuke biloko oyo basengelaki kopesa bango.Bazalaki mpe kopesa makabo yaba santo na ba-lewi,mpe ba-lewi bazalaki kolongolela nganga-nzambe ,bato ya libota ya alona,biteni oyo ezalaki mpo na bango