Mokapo ya 5

1 Yawe, kanisa mambo makweli biso, tala mpe mona nsoni na biso. 2 Libulu na biso ekomi yaba paya, ndako nabiso ekabami na bato na mokili mosusu. 3 Tozali bitike, tokufeli batata, bamaman nabiso lokola ,basi bakufeli mibali. 4 Tomeli mai na biso na mosolo, tozali kozwa nkoni bobele na mosolo. 5 Babengani na biso bazali nsima na biso, tolembi mpe to zangi kopema. 6 Topesi ba elipeto loboko, epai na ba Egypito mpo tozua molia. 7 Ba tata na biso basali lisumu, bazalite, biso tokumbi masumu na bango. 8 Bawumba bazali kokonza biso, moto moko te azobikisa biso na maboko na bango. 9 Tozali kozwa molia na pasi mpo na mponga kati na lisobe. 10 Lopoqo na biso ekomi moyindo lokola fulu mpo na kozanga molia. 11 Babesi ba maman na Siona mpe ba seka ya bingumba ya yudaya. 12 Bakangisi mikonzi na maboko na bango, batosi mibangete. 13 Bilenge mibali bamemi libanga ya etutela bana mibali bakwei likolo ya nkoni. 14 Mibange bakei lisusu te na ekuke, bilenge mibali batiki koyemba nzembo 15 16 Esengo esili na mitema na biso, kobina na biso ebongwana kolela. Motole na mitu na biso ekwei, mawa na biso zambi tosali mabe. 17 Toyoki mpasi na mitema, miso na biso ekomi molili. 18 Ngomba na sion etikali pamba, bangombolo bakomi kotambola wana. 19 Yawe, bokonzi nayo ezali na sukate, kiti na bokonzi nayo ezali seko na seko. 20 Mpona nini obosani biso lebela? ookotika biso mpona mbula ebele? 21 Yawe, zongisa biso epai nayo, mpe tokoya lisusu, bongisa mikolo na biso ndenge ya liboso. 22 Obwaki biso libela, mpe osilikeli biso makasi?