Mokapo ya 1

1 Petelo ntoma ya Yesu Kristo, na ba paya pa palangani na ba mboka nionso, na baponami na etuka ya na gala tia, na cappadoce, n'Asie mpe bitynia. 2 Engebene na mayele ya Nzambe Tata, etunda na molimo monsatu, mpona botosi mpe mpona bosokoli bino ya makaila ya yesu Kristo. tika ete ezala na bino mpe botonda na kimia. 3 Tika ete Nzambe mpe Tata ya Mokonzi na biso Yesu Kristo apambolama, mpo epasaq biso bomoyi ya sika mpe botema na elikia totia bobele naye. mpo na koseluisa Yesu kristo. 4 Na bongo, abombeli biso bomengo na likolo oyo ekotikala seko. 5 Abombi bino na nguya ya Nzambe mpo botia mitema epayio na ye. 6 bino bosepela mpona yango, ata na tango muke bokoki koyoka mawa. na mimekano ya ndenge na ndenge. 7 Na yango mpo ete kodima na bino ekomekama, kodima oyo eleki motuya na wolo oyo ekomekama na moto. oyo ekoya sima ya kodima na bino mpona lokumu, na Nkembon mpe na masanzoli na koya ya Nkolo Yesu Kristo. 8 Bino bomonakaye te, kasi bolingaka ye. sikoyo bozali komona ye te kasi bozondima ye , mpe botondisami na esengo koleka. 9 Sikoyo bokoyamba mbuma ya kodima na bino, lobiko ya bomoyi na bino. 10 Lobiko mpe ngolu oyo ebombela bino, esali ete koluka mpe koyeba epai ya basakoli. 11 Balukaki bayeba lolenge nini mpe ngonga nini molimo ya Yesu elob elaki ango. Bongo yango elekaka tango abandaki koloba na tina ya mpasi ya Kristo mpe nkembo oyo ekoya sima. 12 Ayebisaki bango makambo minene oyo bazalaki kosala mpo na bango mkok te, kasi mpona bino, tango bazalaki koloba pona biloko oyo ba panzisango mpe molimo mosantu atindama na likolo (makambu oyo bangelo baza na posa ya kotia misu na bango). 13 Boye boselinwa, bofungwama, bozala na etindia na ngolu oyo ekozala na bino ntango na koya na Mokonzi Yesu. 14 Lokola bana bazali na botosi, bolanda Mposa oyo ezali na bino ntango bozangali boyebi. 15 Lokola oyo abiangi bino nazali bule, bozala mpe bule na bizaleli na bino. 16 Mpo ete ngayi ye meyi nazali mbule. 17 Soko bobiangi tata oyo asambisaka na lolenge na bato te, mpe na mosala ya moko kati na bino, ntango, etikali na molbembo bo bange ye. 18 Nabizaleli ezangi ntinate, oyo boyokaki na tata na bino nde ba sombi bino, to na mbongo soko na wolo ebebisama. 19 Nzoka nde na makila na ntalo ya Kristo oyo ezalaki lokola mpate ezangi mbeka mpe mbindo. 20 na moboko ya molonga mob imba, Kristo aponamaki, Sika, na ntago yua suka emonani epai na bino. 21 Bondimela Nzambe na nzela naye, oyo asekuisaki ye kati na ba kufi mpe na oyo apesameli nkembo mpo ete kondima mpe elikia na bino efanda likolo na Nzambe. 22 Na botosi kati na solo boyeyisi milimo na bino mpeto. yango ezalaki mpo na bolongo kati na bondeko mpe solo, bolingana nabino mpeza bino na bino kati na motema. 23 Na kona beba, nde bobotami ya sika, kasi na kona ebeba te na kati na liloba na bomoyi mpe seko na Nzambe. 24 Pamba te« mosuni nionso ezali lokola nkasa, mpe nkembo na yango lokola fololoya nkasa. Nkasa ekaokaka mpe fololo ekweyaka; 25 nde liloba na Mokonzi ewumelaka.» yango nde sangfo malamu kesakolami na bino.